Luke 4

Bameki Yesu

(Mt. 4.1-11 ; Mk. 1.12-13)

1Yesu atondaki na Molimo Mosantu, alongwaki na Yordani mpe Molimo amemaki ye na esobe. 2Kuna Zabolo amekaki ye mikolo ntuku minei. Azalaki kolia eloko moko te na kati ya mikolo wana ; bongo tango mikolo yango ekokaki, ayokaki nzala.

3Zabolo alobaki na ye :

—Soki ozali Mwana ya Nzambe, loba na libanga oyo ekoma limpa !

4Kasi Yesu azongisaki :

—Ekomama : Moto akozala na bomoi kaka mpo na limpa te !

5Bongo Zabolo amemaki ye na esika moko ya likolo penza 6mpe alakisaki ye na mbala moko babokonzi nyonso ya mokili ; mpe alobaki na ye :

—Nakopesa yo bokonzi na yango nyonso mpe nkembo na yango, pamba te yango epesama na maboko na ngai, mpe nakoki kopesa yango na moto nyonso oyo ngai moko nalingi.
7Soki ofukameli ngai, nyonso ekokoma ya yo.

8Yesu azongisaki :

—Ekomama : Okokumbamela Nkolo Nzambe na yo,
mpe okosalela kaka ye moko !

9Bongo Zabolo amemaki ye na Yeruzalem, atiaki ye na esika oyo eleki likolo oyo ya Ndako na Nzambe, mpe alobaki na ye :

—Soki ozali Mwana ya Nzambe, mibwaka na nse
10pamba te ekomama : Akotinda baanzelu na ye mpo na yo,
mpo babatela yo ;

11 mpe bakomema yo na maboko na bango
mpo ete lokolo na yo
etuta libanga te !

12Yesu azongisaki :

—Elobama boye : Komeka Nkolo Nzambe na yo te !

13Awa Zabolo asilisaki komeka Yesu na ndenge nyonso, atikaki ye kino na tango mosusu.

MOSALA YA YESU NA GALILEYA

Yesu abandi mosala na ye

(Mt. 4.12-17 ; Mk. 1.14-15)

14Bongo Yesu azongaki na Galileya, mpe nguya ya Molimo ezalaki na ye. Basango na ye epanzanaki bipai nyonso ya mokili wana. 15Azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani, mpe bato nyonso bazalaki kokumisa ye.

(Mt. 13.53-58 ; Mk. 6.1-6)

16Akendaki na Nazareti, epai ye akolaki, akotaki na ndako ya mayangani na mokolo ya Saba
Saba  : Yenga ya Bayuda, mpe mokolo ya poso na biso. Bongo atelemaki mpo na kotanga.
, lokola amesanaki kosala.
17Bapesaki ye Buku ya moprofeta Ezayi ; afungolaki yango mpe amonaki esika oyo ekomama boye :
18 Molimo ya Nkolo azali likolo na ngai,
mpo aponi ngai nasakola Sango-Malamu na babola ;
atindi ngai nayebisa bakangami ete bakokangolama,
mpe na bato bakufa miso ete bakomona lisusu ;
mpo na kokangola bato oyo bazali konyokolama,

19 mpe kosakola mbula ya bolamu ya Nkolo.

20Bongo akangaki Buku yango, azongisaki yango na mosali ya ndako ya mayangani, mpe avandaki. Miso ya bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya mayangani ezalaki kotala ye.

21Bongo alobaki na bango :

—Lelo nde Makomi oyo bowuti koyoka, ekokisami !

22Bato nyonso balobaki makambo ya malamu mpo na ye mpe bakamwaki mingi penza mpo na maloba ya ngolu oyo ebimaki na monoko na ye. Bongo bazalaki kotuna :

—Boni, ye azali mwana ya Zozefi te ?

23Yesu alobaki na bango :

—Nayebi malamu ete bokoloba na ngai lisese oyo : “Monganga, mibikisa yo moko ! Sala awa na vile na yo, makambo nyonso oyo toyokaki esalamaki na Kapenawumi”.
24Bongo alobaki lisusu : Ya solo nalobi na bino : moprofeta ata moko te bandimaka ye na vile na ye. 25Nalobi na bino ya solo : na tango ya Eliya, tango mbula enokaki te mbula misato na ndambo mpe nzala monene ezalaki na ekolo mobimba, basi bakufela mibali bazalaki mingi na kati ya Isayele. 26Nzokande, Eliya atindamaki epai ya moko na bango te, kasi kaka epai ya mwasi akufela mobali ya Sarepeta, na ekolo ya Sidoni. 27Na tango mpe ya moprofeta Elize, bato ya maladi ya maba bazalaki mpe mingi na Isayele ; kasi ata moko te na kati na bango akomaki peto, longola kaka Namani moto ya Siria.

28Bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya mayangani, tango bayokaki bongo, batondaki na kanda, 29batelemaki, bamemaki Yesu na libanda ya vile tii na songe ya ngomba, epai batongaki vile na bango mpo babwaka ye na nse. 30Kasi Yesu alekaki na kati-kati na bango mpe akendeki.

Yesu abengani molimo mabe mpe abikisi bato ya maladi

(Mk. 1.21-28)

31Bongo Yesu akendaki na Kapenawumi, vile moko ya Galileya ; mpe azalaki koteya bango na mokolo ya saba. 32Bazalaki kokamwa mingi mpo na mateya na ye, pamba te maloba na ye ezalaki na bokonzi.

33Moto moko azalaki na ndako ya mayangani, azalaki na molimo moko ya mabe penza. Agangaki na mongongo makasi :

34—A ! Yesu ya Nazareti, likambo nini biso na yo ? Oye mpo na koboma biso ? Nayebi yo soki ozali nani : ozali Mosantu ya Nzambe.

35Yesu agangelaki molimo mabe :

—Kanga monoko na yo, mpe bima kati na ye. Molimo mabe ebwakaki moto yango na mabele, liboso na bango nyonso, ebimaki kati na ye, mpe esalaki ye ata mabe moko te.

36Bato nyonso bakamwaki mpe bazalaki kolobana bango na bango :

—E e ! maloba ya ndenge nini oyo ? Pamba te azali kotinda milimo mabe na bokonzi mpe na nguya, mpe yango ezali kobima !
37Bongo basango ya Yesu epanzanaki na bamboka nyonso ya pembeni wana.

(Mt. 8.14-17 ; Mk. 1.29-34)

38Yesu abimaki na ndako ya mayangani mpe akotaki na ndako ya Simon. Bokilo ya Simon ya mwasi azalaki na fievre makasi. Bongo basengaki Yesu abikisa ye. 39Yesu agunzamaki likolo na ye, apamelaki fievre, mpe fievre etikaki ye. Kaka na tango wana, atelemaki mpe abandaki kobongisela bango biloko ya kolia.

40Bongo na pokwa, bato oyo bazalaki na bato na bango oyo bazalaki na maladi ya ndenge na ndenge, bamemaki bango epai ya Yesu ; atielaki bango maboko moko na moko mpe abikisaki bango ! 41Milimo mabe mpe ezalaki kobima na bato mingi ; ezalaki koganga :

—Ozali Mwana na Nzambe ! Kasi Yesu apamelaki bango mpe apesaki bango nzela te mpo na koloba, pamba te bango bayebaki ete ye azali Kristo.

42Tongo tango etanaki, Yesu abimaki mpe akendaki na esika na ye moko. Bato bazalaki koluka ye mpe tango bakomaki epai ye azalaki, balingaki kosimba ye ete azala kaka wana, mpo atika bango te.

43Kasi Yesu alobaki na bango :

—Esengeli nateya Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe na bavile mosusu ; pamba te Nzambe atindaki ngai mpo na yango.

44Bongo Yesu azalaki koteya na bandako ya mayangani ya Yudea
Mikanda misusu ya kala ezali na : Galileya.
.
Copyright information for LinMNB